Interprete :
CLOVIS MAKOLA
Langue : Lingala
Genre : Gospel
Album : Apparence
Auteur : Clovis MAKOLA
Compositeur : Clovis MAKOLA
Année : 2006
|
|
Texte :
Fr. Clovis MAKOLA ''Calendrier''
PAROLE:
Etoile mpo emonana claire ezali te tango moyi mokongala kasi tango butu mokoyinda
Apôtre Thomy MAKOLA elongo na assemblée du premier né na Luanda
Balabala réflexion na bino nde yango oyo te
LEAD:
Nalalaki Nzambe oh motema moboyi kolala
Nyoso se mpo na bilaka opesa nga ekokisama Nzambe 2x
Zala na nga oh Masiya eh CH: Nazua kimia na motema
Kitisa nguya na yo Yesu na nga CH: Nazua kimia na motema
Pesa nga mabota Nzambe oh CH: Nazua kimia na motema
LEAD:
Calendrier natia na ndako mpo natangaka ata mikolo papa na lola
Ekomi sujet ya ba soucis na motema okosala mbula nini eh Yesu
Montre natia na loboko oh mpo natalaka ata ngonga Nzambe eh
Lelo ekomi sujet ya bapasi ya motema na nga okosala tango nini papa eh
Kanisa nga oh papa eh CH: Nazua kimia na motema
Pesa mosala Nkolo CH: Nazua kimia na motema
Toleli mpe tolembi tokotalela nani Masiya CH: Nazua kimia na motema
PAROLE:
Baninga bakamua tofandaki tozali ko partager masolo mpe biloko ya kolia
Mais ba arts oyo nazali kosala ya liloba na Nzambe ezali kofunda ete nazali ko partager motema te
Nyoso mpo na bilaka na yo ekokisama
Soki mutu na nga ezalaki liziba na mayi ete miso na nga ezalaki liziba na mayi ya miso
Mbele nalelaka butu na moyi mpo Yehoshua osala
LEAD:
Motema na nga ekomi sevice de renseignements mpo na bilaka
Ecommander miso na nga Nzambe ko fouiller yo na bible
Ecommander litoyi na nga Maisya koyoka kaka yo eh
Emobiliser nzoto na nga mobimba ko fouiller yo na ba jeûnes mpo osala
PAROLE:
Oh Nkolo kanisa bandeko nyoso oyo babondelaka mpo na ngolu na yo ekita na bomoyi na nga
Kanisa bango
LEAD:
Mbeto natia na chambre mpo nazala soulagé na pongi eh
Kasi lelo ekomi lisusu eh kozangisa nga kimia papa
Nyoso se mpo na bilaka opesa ngai ekokokisama butu nini eh
Olakaki mbongo eh CH: Kokisa yango oh
Olakaki okopesa nga libaba papa CH: Kokisa yango oh
Olakaki okotinda bandimi mingi na Eklesia CH: Kokisa yango oh
Olakaki okokokisama quinze, seize, dix-sept CH: Kokisa yango oh
Poster par :
|
|